Jeremi 50:2 - Mokanda na Bomoi2 « Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, telemisa bendele ! Sala ete bato nyonso bayeba yango, kobomba likambo moko te ! Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni ! Beli akoyokisama soni ! Mariduki akobukana ! Bililingi na ye ekosambwa, mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. › အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
« Botelemisa bendele kati na mokili ! Bobeta kelelo kati na bikolo ! Bobongisa bikolo mpo na kobundisa Babiloni, bobenga bakonzi ya basoda ya mikili ya Ararati, ya Mini mpe ya Ashikenazi mpo ete babundisa yango. Bopona mokonzi moko ya basoda mpo ete atambolisa bitumba, botinda bampunda lokola liboke ya mabanki.