Jeremi 50:17 - Mokanda na Bomoi17 Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela, oyo nkosi ezalaki kolanda : Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya liboso oyo apasolaki Isalaele ; Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni, azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango libanda ya engumba, mpe atongaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso.
Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›
Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Edomi na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ?