Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 50:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bino bato nyonso oyo bobundaka na matolotolo, bomitanda na molongo zingazinga ya Babiloni mpe bobeta yango makonga ! Botika ata likonga moko te, pamba te Babiloni asali masumu liboso ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 50:14
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Joabi amonaki ete milongo ya bitumba ezali na liboso mpe na sima na ye, aponaki basoda ya Isalaele oyo baleki na mpiko, mpe atiaki bango na milongo mpo na kobundisa bato ya Siri.


Sukola ngai mobimba mpo na kolongola mabe na ngai, mpe petola ngai na masumu na ngai.


Boyoka makelele likolo ya bangomba : ezali lokola makelele ya bato ebele ! Boyoka lokito ya makelele ya bikolo : ezali lokola bikolo esangana esika moko ! Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali kotala mampinga ya basoda oyo bazali pene ya kokende na etumba.


Bambanzi na bango ezali songe, batolotolo na bango nyonso ebendana makasi ; makolo ya bampunda na bango ezali lokola mabanga, bapine ya bashar na bango ezali lokola mopepe makasi.


Bino bampunda, bokende ! Bino basoda oyo botambolaka likolo ya bashar, botambolisa mbangu ! Bino basoda, bato ya Kushi mpe ya Puti, oyo bomemaka banguba, mpe bino bato ya Ludi oyo bobundaka na matolotolo, bokende liboso !


Nayoki sango kowuta na Yawe ; mpe batindaki ntoma moko epai ya bikolo mpo na koloba : « Bosangana mpo na kobundisa yango ! Botelema mpo na bitumba !


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Tala, nakobuka tolotolo ya Elami, ebundeli oyo esalaka makasi na ye.


« Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo, bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai ; mpo ete bozali kopumbwa-pumbwa lokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika ble mpe kolela lokola bampunda,


Bosangisa bato nyonso oyo babundaka na matolotolo mpo na kotelemela Babiloni ; tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga bazingela Babiloni mobimba, basala ete ata moto moko te akima, bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango mpe bazongisela yango makambo oyo esalaki bikolo mosusu ; pamba te ebetaki tembe na Yawe, Mosantu ya Isalaele.


Basimbi matolotolo mpe makonga, bazali bato na kanza mpe bazanga mawa, bazali koganga lokola makelele ya ebale monene, bamati likolo ya bampunda, batandami na milongo lokola basoda mpo na kobundisa yo Babiloni, mboka kitoko !


Moto nyonso oyo azalaki komona bango azalaki koboma bango, banguna na bango bazalaki koloba : ‹ Tozali na biso na ngambo te, mpo ete basali masumu liboso ya Yawe oyo azali lokola lopango na bango ya bosembo ; liboso ya Yawe, elikya ya batata na bango. ›


Pamba te nakotelemisa mpe nakoyeisa lisanga ya bikolo ya nguya oyo ekowuta na mokili ya nor mpo na kobundisa Babiloni mpe kobotola yango wuta na nor ; makonga na bango ekozala lokola makonga ya basoda ya mpiko, oyo bazangaka koboma te.


Nakotinda bapaya na Babiloni mpo na koyungola mpe kobebisa yango : bakobundisa yango na bangambo nyonso na mokolo na yango ya kosambisama.


« Botelemisa bendele kati na mokili ! Bobeta kelelo kati na bikolo ! Bobongisa bikolo mpo na kobundisa Babiloni, bobenga bakonzi ya basoda ya mikili ya Ararati, ya Mini mpe ya Ashikenazi mpo ete babundisa yango. Bopona mokonzi moko ya basoda mpo ete atambolisa bitumba, botinda bampunda lokola liboke ya mabanki.


Basoda oyo babundaka na matolotolo bakozwa tango te ya kobeta makonga na bango ; bakozwa tango te ya kolata bibombelo ya tolo, bakobikisa te basoda na bango ya bilenge mpe bakoboma mampinga na bango nyonso.


Mabe oyo osalaki mokili ya Libani ekozongela yo, mpe somo ya banyama oyo obomaki ekokomela yo ; pamba te osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.


Lokola obotolaki bomengo ya bato ya bikolo ebele na makasi, bato oyo batikali bakobotola yo mpe bomengo na yo na makasi, mpo ete osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.


Na mbunzu na ye, bakomaki kombo moko oyo ebombaki makambo ya somo mpe oyo ndimbola na yango ezali : Babiloni monene, Mama ya Basi ya Ndumba mpe ya Makambo ya Nkele ya Mokili.


Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Davidi atikaki bameme na maboko ya mokengeli moko ; akamataki mikumba na ye mpe akendeki, ndenge kaka Izayi ayebisaki ye ; akomaki na molako tango mampinga ya Isalaele ezalaki komibongisa na milongo mpo na kobunda bitumba, mpe ezalaki kobeta milolo ya bitumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ