13 Likolo ya kanda ya Yawe, bato bakovanda lisusu na Babiloni te mpo ete ekobebisama nye. Bato nyonso oyo bakoleka na Babiloni bakokamwa mpe bakozala na somo ya komona bapota na yango nyonso.
Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.
Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela.
Bakotikala lisusu te kozwa epai na yo libanga oyo batongelaka basonge ya bamir to libanga oyo batongelaka miboko ; pamba te okobebisama mpo na libela, » elobi Yawe.
Mikili ezali koningana mpe kotepatepa, pamba te mikano ya Yawe mpo na Babiloni ezali kokokisama mpo na kobebisa yango mpo ete, ata moto moko te atikala kovanda lisusu kuna.
Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › »
Mokili mobimba ekopela na moto ya sofolo mpe ekotonda na mungwa. Bakolona ata eloko moko te, eloko moko te ekobima mpe matiti ekobota te. Mokili yango ekobebisama ndenge Sodome mpe Gomore, Adima mpe Tseboyimi, ebebisamaki : bingumba oyo Yawe abebisaki na kanda na Ye ya makasi.