Basinga na yo esili kolemba, ezali lisusu te kosimba malamu nzete ya bendele ; ezali lisusu te kofungola malamu vwale. Boye, na tango bakokabola ebele ya bomengo ya bitumba, bato ya tengu-tengu, bango moko penza, bakobotola eteni na bango ya bomengo.
Nakopesa yo bomengo oyo babomba na molili, bozwi oyo batia na bisika ebombama, mpo okoka koyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo abengi yo na kombo na yo.
Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela.
Bikolo nyonso ekotosa ye, mwana na ye ya mobali mpe koko na ye, kino tango ya mokili na ye mpe ekokoka ; bongo bikolo ebele mpe bakonzi ya nguya bakokonza ye.
Bobimela wuta na bisika nyonso mpo na kobundisa ye, bobuka bibombelo na ye, bokangisa bomengo ya bitumba ndenge bakangisaka maboke ya ble, bobebisa yango nyonso mpe botika ata eloko moko te.
Tika ete mabe oyo basali biso mpe bana na biso ekweyela Babiloni, » elobi bavandi ya Siona ! « Tika ete makila na biso etangama na mito ya bavandi ya Babiloni, elobi bavandi ya Yelusalemi ! »
Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kati na Babiloni epai ya bato oyo bakendeki na bowumbu. Makambo oyo ezalaki kosalema kati na emoniseli oyo Molimo ya Nzambe apesaki ngai. Mpe emoniseli oyo namonaki esilaki.
Lokola obotolaki bomengo ya bato ya bikolo ebele na makasi, bato oyo batikali bakobotola yo mpe bomengo na yo na makasi, mpo ete osopaki makila ya bato, obebisaki mikili mpe bingumba elongo na bavandi na yango nyonso.
Nyama mpe maseke zomi oyo omonaki ekoyina mwasi ya ndumba, ekobotola biloko na ye nyonso mpe ekotika ye bolumbu ; ekolia misuni na ye mpe ekotumba ye na nzela ya moto.