Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 5:7 - Mokanda na Bomoi

7 « Na makambo ya boye, ndenge nini nalimbisa yo ? Ah Yelusalemi, bana na yo basundoli Ngai mpe bazali kolapa ndayi na bakombo ya banzambe ya bikeko oyo ezali ata banzambe te. Nakokisaki baposa na bango nyonso, kasi basalaki kaka ekobo mpe bakendeki na bandako ya basi ya ndumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 5:7
39 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, bobenganaki te Banganga-Nzambe ya Yawe, bana mibali ya Aron, mpe Balevi ? Bomikomisaki te banganga-nzambe ya banzambe ya bikeko ndenge bato ya bikolo mosusu basalaka ? Moto na moto azalaki koya na ngombe moko ya mobali mpe bameme sambo ya mibali oyo azalaki kozwa na etonga na ye, mpo ete bakomisa ye nganga-nzambe ya oyo ezali kutu banzambe te.


Ezali moto oyo ezali kozikisa kino na kobebisama mpe ekoki kobebisa bomengo na ngai nyonso.


Soki omoni moyibi, wana nde osepeli ; mpe ovandaka esika moko na bato na bikobo.


Mpe soki bayekoli malamu bizaleli ya bato na Ngai mpe balapi ndayi na Kombo na Ngai, na maloba oyo : ‹ Na Kombo na Yawe, › ndenge balakisaki bato na Ngai kolapa ndayi na kombo ya Bala, nakopesa bango esika kati na bato na Ngai.


Namoni bondumba na yo mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ; ekobo na yo ezali na soni ata moke te. Namoni banzambe na yo ya bikeko na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te ! Kino tango nini okozala mbindo ? »


Okoloba na bango : ‹ Ezali mpo ete batata na bino basundolaki Ngai, › elobi Yawe, ‹ basalaki banzambe ya bapaya, basalelaki yango mpe bafukamelaki yango. Batikaki Ngai mpe babatelaki Mobeko na Ngai te.


Boni, bato bakoki solo komisalela banzambe, tango bango moko bazali banzambe te ?


Boni, ezali na ekolo oyo etikaka banzambe na yango mpo na kosambela banzambe mosusu ? Nzokande, banzambe yango ezalaka kutu banzambe ya solo te. Kasi bato na Ngai basundoli Ye oyo azali Nkembo na bango mpo na kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina.


Bino bato ya tango oyo, boyoka Liloba na Yawe : Boni, nazali lokola esobe to mokili ya molili makasi mpo na mokili ya Isalaele ? Mpo na nini bato na Ngai bazali koloba : ‹ Tozali na bonsomi ya kokende epai tolingi mpe tokoya lisusu epai na yo te ? ›


Pamba te mokili etondi na kindumba, mokili ekomi na matanga. Likolo ya bilakeli mabe, matiti oyo bibwele eliaka na esobe ekawuki, basakoli bakomi kolanda nzela mabe mpe bakomi na molende ya kosala kaka makambo oyo esengeli te.


Namilobelaki : ‹ Esengo nini penza nazalaki na yango ya kokamata bino lokola bana mpe kopesa bino mikili ya kitoko, libula oyo eleki kitoko kati na bikolo ! › Nakanisaki ete bokobenga Ngai ‹ Tata › mpe bokotika te kolanda Ngai.


Napesaki mopengwi Isalaele mokanda na ye ya koboma libala mpe nabenganaki ye likolo ya kindumba na ye ; kasi namonaki ete ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, abangaki te ; ye mpe abimaki mpo na kosala kindumba.


Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ;


Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !


« Babongisaka lolemo na bango lokola tolotolo mpo na kokosa ; balongaka kati na mokili na nzela ya solo te, pamba te basalaka se mabe likolo ya mabe mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe.


« Tosalaki masumu mpe totombokelaki Yo, yango wana olimbisaki te.


Na mboka na yo, moko na moko azali kosala makambo ya mbindo elongo na mwasi ya moninga na ye, mosusu azali kokomisa mwasi ya mwana na ye mbindo, mpe mosusu lisusu azali kosangisa nzoto na makasi na ndeko na ye ya mwasi, mwana mwasi ya tata na ye.


Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi.


Kasi sik’oyo, lokola bolie mpe botondi, bokomi lofundu mpe bobosani Ngai.


etikali kaka kolakelana mabe, lokuta, makambo ya somo, moyibi, kindumba, mobulu mpe kobomana se kobomana.


Bango nyonso bazali bandumba, bapelaka na posa lokola moto ya fulu ya mapa, oyo molambi mapa akobaka te kobakisa koni, wuta na tango asangisaki farine kino mapa evimba.


Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.


Bato oyo balapaka ndayi na kombo ya nzambe ya ekeko ya Samari mpe balobaka : ‹ Dani, lokola nzambe na yo azali na bomoi › to ‹ lokola nzambe ya Beri-Sheba azali na bomoi, › bakokweya mpe bakotelema lisusu te. »


bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe ? Bomikosa te : bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali,


Boye, na tina na likambo ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete nzambe ya ekeko ezali eloko pamba kati na mokili, mpe ete Nzambe azali kaka se moko.


Wuta kala, wana boyebaki nanu Nzambe te, bozalaki bawumbu ya banzambe oyo, na bosolo, bazali penza banzambe te.


Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ; atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu ; asundolaki Nzambe oyo akelaki ye mpe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye.


Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te, batumbolaki kanda na Ngai likolo ya biloko oyo ekoki kutu kozala ata banzambe ya bikeko te. Boye, Ngai mpe nakosala ete bango mpe bayokela oyo ezali ata ekolo te zuwa ; nakosala ete ekolo moko ya bazoba epesa bango kanda.


Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.


Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.


Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ