Jeremi 5:6 - Mokanda na Bomoi6 Yango wana, nkosi moko ekobima wuta na zamba mpe ekoboma bango ; mbwa ya zamba ekobima wuta na esobe mpe ekopasola bango ; nkoyi moko ekovanda pene ya bingumba na bango mpo na koboma moto nyonso oyo akoluka kobima kuna, pamba te botomboki na bango ezali monene mpe lokuta na bango eleki mingi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, ndenge wana mpe nakobengana Edomi na mokili na yango na mbala moko ; Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi. Nani akokani na Ngai ? Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ?
Bampunda na bango ekimaka mbangu koleka ata nkoyi, ezalaka na kanda makasi koleka ata mbwa ya zamba oyo ebimaka na pokwa mpo na koluka nyama ya kolia. Basoda na bango oyo batambolaka likolo ya bampunda batambolaka mbangu makasi mpe bawutaka mosika penza, bapumbwaka lokola mpongo soki ezali kokita na elulu mpo na kokanga nyama ya kolia.