Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.
Ezala kutu nkongi, kati na likolo, eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu ; ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambila eyebaka ata tango ya kozonga, kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te.
« Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye mpe atia motema te na ndeko na ye, pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta, mpe moninga nyonso azali moto ya matongi.
Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.