Jeremi 5:31 - Mokanda na Bomoi31 basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yawe alobaki na ngai : — Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta ; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko.
Bakambi na yango basengaka kanyaka liboso ya kokata makambo, Banganga-Nzambe na yango basengaka misolo liboso ya koteya, mpe basakoli na yango basengaka mbongo liboso ya kosakola. Nzokande, babombamaka na sima ya Kombo ya Yawe tango balobaka : « Boni, Yawe azali kati na biso te ? Pasi ekoki kokomela biso te ! »