25 Mabe na bino nde ebebisi makambo nyonso, mpe masumu na bino ezangisi bino bolamu.
Bamosusu bakomaki bazoba mpo na etamboli mabe na bango, mpe bato na pasi, mpo na masumu na bango.
kobongola mabele oyo ebotaka bambuma mabele ya mungwa likolo ya mabe ya bavandi na yango.
Kasi ezali bambeba na bino nde ekaboli bino na Nzambe na bino, ezali masumu na bino nde esali ete abombela bino elongi na Ye mpo ete ayoka bino te.
Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi na tina na bokawuki :
Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso, sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo, pamba te towangani Yo mpe mingi, tosalaki masumu liboso na Yo.
Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.
« Etamboli mpe misala na yo moko nde ememelaki yo yango. Tala, etumbu na yo ezali bololo mpe ekosala pasi makasi na motema. »
Mpo na nini moto na bomoi amilela-lela tango bapesi ye etumbu likolo ya masumu na ye ?
Siona, mboka kitoko, etumbu na yo ekosila ; Nzambe akomema yo lisusu na bowumbu te. Kasi yo Edomi, mboka kitoko, Nzambe akopesa yo etumbu mpo na mabe na yo, mpe akobimisa masumu na yo na polele.