Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 5:23 - Mokanda na Bomoi

23 Kasi bato oyo bazali mitema makasi mpe bazali solo batomboki ; bapesi Ngai mokongo mpe bakei na bango !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 5:23
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, bakozala te lokola bakoko na bango, oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki, oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe, mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye.


Mibu tuku minei, nayinaki bato ya ekeke wana mpe nalobaki : ‹ Bazali bato oyo mitema na bango ebeba, bayebaka banzela na ngai te. ›


Boni, babeta bino lisusu wapi, bino bato oyo botingami kaka na botomboki ? Moto na yo mobimba ezali kobela, motema na yo mobimba ezali na pasi.


Oh bana ya Isalaele, bozonga epai na Ye oyo botombokeli makasi !


Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?


Ezingeli Yelusalemi lokola bakengeli bilanga, pamba te etombokelaki Ngai, › » elobi Yawe.


Boye, nakokende epai ya bakambi na bango mpe nakoloba na bango, pamba te bango nde basengeli koyeba nzela ya Yawe mpe malako ya Nzambe na bango. » Kasi bango nyonso, na motema moko, babukaki ekangiseli mpe bakataki minyololo.


Bango nyonso bazali batomboki ya mito makasi, bayebi kaka kotonga. Bazali lokola bronze mpe ebende, bango nyonso bazali kaka babebisi.


Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo. Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo, moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.


Banganga-Nzambe baliaka na sima ya masumu ya bato na Ngai mpe basepelaka ete bato basala kaka mabe.


Mawa na engumba ya batomboki, engumba ya makambo ya mbindo, mpe engumba oyo enyokolaka bato !


Soki moto azali na mwana oyo azali moto makasi mpe motomboki, oyo atosaka te ezala tata to mpe mama na ye, mpe ayokelaka bango te ata soki bapesi ye etumbu,


Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai ?


Bandeko na ngai, bosala keba ete moto moko te kati na bino azala na motema mabe mpe azanga kondima kino kokabwana na Nzambe na bomoi ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ