Jeremi 5:22 - Mokanda na Bomoi22 Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki ? Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki ? Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino ? Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino ? Na pamela na Ngai, nakawusaka ebale monene, nakomisaka bibale esobe ; mbisi na yango ekomaka kolumba solo mpo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi.