Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 5:21 - Mokanda na Bomoi

21 Boyoka makambo oyo, bino bazoba to bato oyo bozanga mayele : bozali na miso mpo na komona kasi bomonaka te, bozali na matoyi mpo na koyoka kasi boyokaka te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 5:21
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bino bato ya kilikili, bososola ! Bazoba, bokokoma mayele tango nini ?


Mpo na nini mbongo ezala na maboko ya zoba ? Mpo ete asomba bwanya wana azali na posa na yango te !


Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.


Bimisa bato oyo bazali na miso, kasi bamonaka te ; bato oyo bazali na matoyi, kasi bayokaka te.


Bayebi eloko moko te, bazali na bososoli te ; miso na bango ekangama, emonaka te ; mitema na bango ezali makasi, esosolaka te.


Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba ; mateya na bango ezalaka ya pamba, mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba !


« Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »


Bopanza sango oyo epai ya libota ya Jakobi mpe botatola yango kati na Yuda :


Namilobelaki : « Bato oyo bazali kaka bato pamba, bazangi mayele, mpo ete bayebi nzela ya Yawe te mpe bayebi malako ya Nzambe na bango te.


Naloba lisusu na nani mpe nakebisa penza nani ? Nani akoyokela ngai ? Matoyi na bango ekangama ; yango wana bakokaka koyoka te. Liloba na Yawe ezalaka pamba mpo na bango, basepelaka na bango na yango te.


Lokola nazalaki kokebisa bino mbala na mbala tango bozalaki kosala makambo oyo nyonso, elobi Yawe, kasi botikalaki koyokela Ngai te ; lokola nabengaki bino, kasi boyanolaki Ngai te,


Ezala kutu nkongi, kati na likolo, eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu ; ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambila eyebaka ata tango ya kozonga, kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te.


« Mwana na moto, ozali kovanda kati na libota ya batomboki ; bazalaka na miso ya kotala kasi bamonaka te, bazalaka na matoyi ya koyoka kasi bayokaka te, pamba te bazali libota ya batomboki.


Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele : azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.


Kasi baboyaki kotosa, bamatisaki mapeka mpe bakangaki matoyi na bango mpo ete bayoka Ngai te.


mpo ete : atako bakoki kotala, bamona eloko te ; mpe atako bakoki koyoka, basosola eloko te ; noki te bakobongola mitema, mpe masumu na bango ekolimbisama.


bozali na miso, kasi bozali komona te ; bozali na matoyi, kasi bozali koyoka te ? Bobosani penza !


« Azipaki miso na bango mpe akomisaki bango mitema makasi, mpo ete bamona te na miso na bango, basosola te na mitema na bango, babongola mitema te, mpe ngai nabikisa bango te. »


« Kende koloba na bato oyo : Matoyi na bino ekoyoka na pamba, bokososola te ; miso na bino ekotala na pamba, bokomona te.


Wuta Nzambe akela mokili, makoki na Ye, oyo emonanaka na miso te, lokola nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye, emonanaka polele penza, tango bayekolaka yango na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki te komilongola na ngambo.


kolanda ndenge ekomama : « Nzambe apesaki bango molimo ya pongi, miso mpo ete bamona te, mpe matoyi mpo ete bayoka te, kino na mokolo ya lelo. »


Kasi kino na mokolo ya lelo, Yawe apesaki bino te mayele mpo na kososola to miso mpo na komona to matoyi mpo na koyoka.


Na mibu tuku minei oyo Ngai Yawe nakambaki bino na esobe, bilamba na bino enzulukaki te mpe basandale na makolo na bino ekufaki te.


Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe ? Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya ! Boni, Yawe azali Tata na bino te ? Azali Mokeli na bino te ? Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ