Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 5:2 - Mokanda na Bomoi

2 Atako balapaka ndayi na maloba oyo : ‹ Na Kombo na Yawe, › ndayi na bango ezalaka kaka ya lokuta. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 5:2
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te !


soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo : ‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambola mpe ekomipesa nkembo mpo na yo. »


Kasi mpo na yango, boyoka Liloba na Yawe, bino Bayuda nyonso oyo bozali kovanda kati na Ejipito : « Tala, nalapi ndayi na Kombo na Ngai ya monene, » elobi Yawe, « moto moko te oyo awuta na mokili ya Yuda, bongo avandi na esika songolo ya Ejipito, akobelela to mpe akolapa ndayi na Kombo na Ngai, na koloba : ‹ Lokola Nkolo Yawe azali na bomoi ! ›


Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ;


« Babongisaka lolemo na bango lokola tolotolo mpo na kokosa ; balongaka kati na mokili na nzela ya solo te, pamba te basalaka se mabe likolo ya mabe mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe.


Bapesaka bilaka ebele, balapaka ndayi ya lokuta mpe basalaka boyokani. Boye, bosembo ekomi lokola matiti ya ngenge oyo ekolaka na bisika oyo bakataka bilanga.


Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »


Okolapa te ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai mpe okobebisa te bosantu ya Kombo ya Nzambe na yo. Nazali Yawe, Nzambe na yo.


bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


mpo na bato na pite, mpo na mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, mpo na bato oyo batekaka baninga na bango bato na bowumbu, mpo na bakosi, mpo na bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, mpe mpo na bato oyo basalaka makambo oyo etambolaka nzela moko te na mateya ya solo,


bakobanda komilakisa lokola nde bazali na botosi kati na makambo ya Nzambe, nzokande bawanganaka nguya na yango. Kima bato ya lolenge wana !


Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ