Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 5:19 - Mokanda na Bomoi

19 Tango bato bakotuna : ‹ Mpo na nini Yawe, Nzambe na biso, asali biso makambo ya boye ? › Bokozongisela bango : ‹ Ezali mpo ete bosundolaki Ngai mpe bosambelaki banzambe ya bapaya kati na mboka na bino. Yango wana, bokosalela bapaya kati na mboka oyo ezali ya bino te. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 5:19
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe soki omituni : « Mpo na nini makambo ya boye ekomeli ngai ? » Ezali mpo na ebele ya masumu na yo nde bapasolaki yo bilamba mpe bazokisaki nzoto na yo.


Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te ; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi ; pamba te nakoyokela bino mawa te. ›


Likolo ya mabe na yo, okobungisa libula oyo napesaki yo, nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yo kati na mokili oyo oyebi te ; pamba te opelisi kanda na Ngai, mpe ekopela mpo na libela. »


« Bato na Ngai basali masumu mibale : Basundoli Ngai oyo nazali etima ya bomoi, mpe batimoli bango moko mabulu ya mayi, mabulu oyo ekawukaka noki.


Boni, Isalaele azali solo mowumbu to abotama kati na ndako ya bowumbu ? Mpo na nini akomi lokola eloko pamba na miso ya bikolo mosusu ?


Kati na makambo oyo nyonso, ozali koloba : ‹ Nayebi ata likambo moko te, kanda ya Nzambe ekokweyela ngai te. › Kasi Ngai nakopesa yo etumbu mpo ete ozali koloba : ‹ Nasali masumu te. ›


Nzokande, ezala na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakosilisa koboma bino nyonso te.


Bopanza sango oyo epai ya libota ya Jakobi mpe botatola yango kati na Yuda :


Yawe alobi : « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te.


Nzokande, batiaki kaka mito makasi mpe bakobaki kolanda banzambe ya Bala oyo batata na bango balakisaki bango. »


Bawumbu bakomi kokonza biso, mpe moto ata moko te amonani mpo na kokangola biso na maboko na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ