Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›
Bomata na bamir mpo na kokota na Yelusalemi mpe bobebisa yango ; kasi bobebisa yango nyonso te. Bokata bitape na yango, pamba te etikali lisusu ya Yawe te.
Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema.
Tango bato bakotuna : ‹ Mpo na nini Yawe, Nzambe na biso, asali biso makambo ya boye ? › Bokozongisela bango : ‹ Ezali mpo ete bosundolaki Ngai mpe bosambelaki banzambe ya bapaya kati na mboka na bino. Yango wana, bokosalela bapaya kati na mboka oyo ezali ya bino te. ›
Nzokande, wana nazalaki nanu kosakola, Pelatia, mwana mobali ya Benaya, akufaki. Nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nagangaki na mongongo makasi : « Oh Nkolo Yawe ! Okosilisa solo koboma penza ndambo ya bana ya Isalaele, oyo batikali na bomoi ? »
Tango bazalaki koboma bato, natikalaki ngai moko ; nakweyaki elongi na ngai kino na mabele mpe nakomaki koganga : — Oh, Nkolo Yawe ! Okosilisa solo koboma batikali nyonso ya Isalaele, na kopelisela Yelusalemi kanda na Yo ?
Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli ? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso ; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.