Jeremi 5:17 - Mokanda na Bomoi17 Bakobotola milona mpe bilei na yo, bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, bakobotola bangombe mpe bameme na yo, bakobebisa bilanga na yo ya vino mpe banzete na yo ya figi, bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi oyo otielaka motema. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
mpo na yango, bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe : Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku, na bisika ya libebi mpe na bingumba oyo basundola mpe babebisa, bongo bato ya bikolo mosusu ya zingazinga bayibaki mpe bakomisaki yango eloko ya kotiola ;
Edomi akoki koloba : « Ata babebisi mokili na biso, tokotonga yango kaka lisusu ! » Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Solo, bakotonga na bango yango, kasi Ngai nakobuka yango ! Bakobenga mokili yango : ‹ Mokili ya makambo mabe, bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. ›