Jeremi 5:13 - Mokanda na Bomoi13 Basakoli bazali kaka lokola mopepe ya pamba, bazali na mateya penza ya koteya te ; boye tika ete mabe oyo bazali kosakola ezongela bango moko ! » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »