Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 5:11 - Mokanda na Bomoi

11 Libota ya Isalaele mpe ya Yuda etamboli na boyengebene te na miso na Ngai, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 5:11
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wuta na suka ya mokili, tozali koyoka banzembo : « Nkembo epai ya Nkolo-Na-Bosembo. » Kasi nalobaki : « Nakomi na suka, nakomi na suka ! Mawa mpo na ngai ! Bazoba bateki mboka, na bozoba penza, bazoba bateki mboka ! »


Solo, oyoka yango nanu te mpe oyebi yango te ; wuta kala, litoyi na yo ezalaka ya kokangama. Solo, nayebi ete ozalaka mokosi ; babengaka yo motomboki wuta na libumu ya mama na yo.


Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?


Kasi bino lisanga ya Isalaele, bokosi Ngai lokola mwasi oyo asangisi nzoto na mobali mosusu, » elobi Yawe.


Bomata na bamir mpo na kokota na Yelusalemi mpe bobebisa yango ; kasi bobebisa yango nyonso te. Bokata bitape na yango, pamba te etikali lisusu ya Yawe te.


« Babongisaka lolemo na bango lokola tolotolo mpo na kokosa ; balongaka kati na mokili na nzela ya solo te, pamba te basalaka se mabe likolo ya mabe mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe.


Bazali sembo te liboso ya Yawe, baboti bana makangu ; sik’oyo, bafeti na bango ya ebandeli ya sanza ekoboma bango nzela moko na bomengo na bango.


Ndenge kaka Adamu asalaki, bango mpe babukaki boyokani na Ngai ; kuna, bazalaki sembo te liboso na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ