Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 49:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bobaluka mpe bokima, bokende kobombama na madusu ya mabanga, bino bavandi ya engumba Dedani ! Pamba te nakotindela Ezawu pasi tango nakopesa ye etumbu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 49:8
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakokima na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.


Maloba na Yawe mpo na kotelemela Arabi : Oh bino bato ya mombongo ya Dedani, bokolala na esobe ya Arabi.


Pamba te mopanga na ngai esili kolongwa kuna na likolo ; tala, ekiti mpo na kosambisa Edomi, mpe bato oyo nabongisaki mpo na kobebisama.


Dedani, Tema, Buzi mpe bato nyonso oyo bavandaka mosika mpe batikaka mandefu te ;


Basoda ya bapaya bazali kati na milongo na ye, bazali lokola bana ngombe ya mibali mpe ya mafuta kati na etonga. Bango mpe bakobaluka mpe bakokima nzela moko ; bakokoka kolonga te, pamba te mokolo ya pasi ezali koya kokweyela bango : ezali tango ya etumbu mpo na bango.


Bino bavandi ya Moabi, bosundola bingumba na bino mpe bokende kovanda kati na mabanga ! Bozala lokola ebenga oyo etongaka zala na yango kati na mabanga.


« Moto nyonso oyo akokima somo akokweya na libulu, mpe moto nyonso oyo akobima na libulu akokangama na motambo, pamba te nakoyeisa mobu ya etumbu na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.


Bokima ! Bopota mbangu mpo na kobikisa bomoi na bino ; bokoma lokola nzete ya kokawuka kati na esobe !


Bino bavandi ya Atsori, bokima na lombangu, bobombama na madusu ya mabanga, » elobi Yawe. « Pamba te Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, asaleli bino likita, asali penza mabongisi ya kosala bino mabe !


Tika ete bashamo na bango ekoma bomengo ya bitumba, bayiba bibwele na bango ebele. Nakopanza na mopepe bavandi ya mosika, mpe nakokweyisela bango pasi longwa na bisika nyonso, » elobi Yawe.


Boboma bana ngombe mibali na ye nyonso ; tika ete ekende na esika oyo babomelaka banyama ! Mawa na bango mpo ete mokolo na bango ekoki, tango mpo na bango ya kozwa etumbu.


« Bino bato ya Benjame, bokima mpo na lobiko na bino ! Bobima na Yelusalemi ! Bobeta kelelo na Tekoa ! Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo ekobimela na nor.


mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela Edomi mpe nakoboma bato mpe banyama na yango ; nakobebisa yango, mpe bakokufa na mopanga, kobanda na engumba Temani kino na engumba Dedani.


kasi nayinaki Ezawu ; bongo nabongolaki bangomba na ye esobe mpe nakabaki libula na ye epai ya bambwa ya zamba. »


Edomi akoki koloba : « Ata babebisi mokili na biso, tokotonga yango kaka lisusu ! » Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Solo, bakotonga na bango yango, kasi Ngai nakobuka yango ! Bakobenga mokili yango : ‹ Mokili ya makambo mabe, bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. ›


Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba.


Lokola loboko ya bato ya Madiani ezalaki na nguya makasi likolo ya Isalaele, bana ya Isalaele babongisaki mabulu ya kokimela mpe bibombelo kati na mabanga, kuna na likolo ya bangomba.


Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ