Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 49:37 - Mokanda na Bomoi

37 Nakosala ete bato ya Elami balenga liboso ya banguna na bango, liboso ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; nakokweyisela bango pasi na kanda na Ngai, » elobi Yawe. « Nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 49:37
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kanda makasi ya Yawe ekozonga te kino tango ekokokisa mabongisi ya motema na Ye. Bokososola yango penza na mikolo ekoya.


Moabi ekozala lisusu na lokumu te, bato bakosalela yango likita kati na Eshiboni mpo na kokweyisa yango : ‹ Boya, tokweyisa ekolo oyo ! › Yo mpe, engumba Madimeni, okokanga monoko ; mopanga ekolanda yo.


« Tala ndenge nini apanzani, tala ndenge nini bazali kolela ! Ndenge nini Moabi apesi mokongo na soni ! Moabi akomi eloko ya kotiola, eloko ya koyoka na miso ya bato nyonso oyo bazingeli ye. »


Tala, mpongo moko ekopumbwa mpe ekokita na elulu, etanda mapapu na yango likolo ya Botsira ! Na mokolo wana, mitema ya basoda ya Edomi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota. › »


Bato ya Damasi balembi nzoto, bakomi koluka kokima mpe somo ekangi bango ; kobanga mpe pasi ezwi bango lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Bobotola na makasi bandako na bango ya kapo mpe bibwele na bango ; bomema bilamba, biloko na bango ya kitoko mpe bashamo na bango ! Tika ete bato bawolola bango na bangambo nyonso : ‹ Somo ekangi bango na bangambo nyonso ! ›


Nakotia Kiti na Ngai ya bokonzi kati na Elami mpe nakoboma mokonzi mpe bakalaka na yango, » elobi Yawe.


Nakomemela yo pasi, wuta na zingazinga na yo, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Bakomema moko na moko kati na bino na bowumbu, mpe moto ata moko te akokoka kosangisa bato oyo bakokima.


‹ Mopanga, boma basakoli na yango ya lokuta ; tika ete bakoma bato ya maboma ! Mopanga, boma basoda na yango ya mpiko ; tika ete bakoma na somo !


Oh mabele, yoka ! Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, ekozala lifuti ya mabongisi na bango, pamba te bayokaki mongongo na Ngai te mpe babwakaki Mobeko na Ngai.


Nakopanza bango kati na bikolo oyo, ezala bango to bakoko na bango, batikalaki koyeba te ; nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango. »


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Botala malamu makambo oyo ! Bobengisa basi oyo balelaka bibembe, bobengisa penza ba-oyo bayebi kolela malamu !


Nakopanza bato na ye, oyo atielaka motema na bisika nyonso : bakalaka mpe mampinga na ye ; mpe nakolanda bango na mopanga ya minu.


Malita na bango ezali kati na libulu moko ya mozindo, mpe mampinga na yango elali zingazinga ya bakunda na ye. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo na mokili ya bato ya bomoi basili kokweya, bakufi na mopanga.


Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga.


Tango mikolo ya etumbu na yo ekosila, okotumba na moto kati na engumba ndambo moko kati na bandambo misato ; okokamata ndambo moko mosusu kati na bandambo misato, okobeta-beta yango na mopanga zingazinga ya engumba, mpe okopanza ndambo moko mosusu kati na bandambo misato na mopepe, mpe Ngai nakolanda bango na mopanga.


Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga ; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ