Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 49:28 - Mokanda na Bomoi

28 Na tina na Kedari mpe mikili ya Atsori, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Botelema mpe bobundisa Kedari, bobebisa bato ya este.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 49:28
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala bakombo ya bana mibali ya Isimaeli kolanda ndenge babotamela : Nebayoti, mwana mobali ya liboso ya Isimaeli ; Kedari, Adibeli, Mibisami,


Kasi wana Abrayami azalaki nanu na bomoi, apesaki bakado epai ya bana mibali ya bamakangu na ye mpe atindaki bango na mokili ya este, mosika ya mwana na ye ya mobali Izaki.


Tala bakitani na bango : Nebayoti, mwana mobali ya liboso ya Isimaeli ; Kedari, Adibeli, Mibisami,


mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.


Mawa na ngai, mpo ete navandi lokola mopaya kati na Mesheki, kati na bandako ya kapo ya Kedari.


Oh bilenge basi ya Yelusalemi, nazali mwindo, kasi nazali kitoko ! Solo, nazali mwindo lokola bandako ya kapo ya Kedari, lokola barido ya kitoko na ndako ya kapo ya Salomo.


Bakosangela elongo bato ya mboka Filisitia na bangomba mikuse ya ngambo ya weste ; bakobebisa elongo bikolo ya ngambo ya este, bakokonza bato ya Edomi mpe ya Moabi, bongo bato ya Amoni bakokoma bawumbu na bango.


Maloba na Yawe mpo na kotelemela Arabi : Oh bino bato ya mombongo ya Dedani, bokolala na esobe ya Arabi.


Tika ete esobe mpe bingumba na yango etombola mingongo, tika ete bamboka mike epai wapi Kedari avandaka esepela ! Tika ete bato ya Sela bayemba na esengo ; tika ete baganga wuta na likolo ya bangomba !


Bokatisa na ngambo ya bisanga ya kitimi mpe botala malamu, botinda bato na Kedari mpe botala malamu ; botala malamu penza soki likambo ya boye esila kosalema.


Dedani, Tema, Buzi mpe bato nyonso oyo bavandaka mosika mpe batikaka mandefu te ;


bakonzi nyonso ya Arabi mpe bakonzi nyonso ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na esobe ;


Nayoki sango kowuta na Yawe ; mpe batindaki ntoma moko epai ya bikolo mpo na koloba : « Bosangana mpo na kobundisa yango ! Botelema mpo na bitumba !


« Atsori ekokoma esika oyo mbwa ya zamba evandaka, esika oyo etikala pamba mpo na libela : moto moko te akovanda lisusu kuna mpe moto moko te akowumela lisusu kati na yango. »


Bato ya Arabi mpe bakambi nyonso ya Kedari bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo bana meme ya mibali, bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali.


Tango nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kolona bilanga na bango, bato ya Madiani, bato ya Amaleki mpe bato ya bikolo mosusu ya ngambo ya este, bazalaki koya kobundisa Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ