Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 49:26 - Mokanda na Bomoi

26 Solo, bilenge mibali na yango bakokweya na babalabala na yango na mokolo wana, basoda na yango ya mpiko bakokanga minoko, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 49:26
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

yango wana tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakopesa bango etumbu. Bilenge mibali na bango bakokufa na mopanga, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakokufa na nzala makasi.


Yango wana, na mokolo wana, bilenge mibali na yango bakokweya na babalabala, basoda na yango nyonso ya mpiko bakokanga minoko, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki na sima na ye mpe moto oyo akolokota yango azali te. › »


Bibembe ya bilenge mpe ya mikolo elali-lali na babalabala ; basali na ngai ya mibali mpe ya basi bakufi na mopanga ! Obomi bango na mokolo ya kanda na Yo ; obomi bango na mawa te !


bomengo na yo, biloko na yo ya koteka, mombongo na yo, baluki nkayi na yo, bato na yo, oyo basalaka na masuwa, basali oyo babambaka madusu ya masuwa na yo, bato oyo basalaka mombongo elongo na yo mpe basoda na yo nyonso elongo na lisanga mobimba oyo ezali kati na masuwa, bakokufa na kati-kati ya bibale minene na mokolo oyo masuwa na yo ekozinda.


« Natindaki, kati na bino, bokono oyo ebomaka, ndenge nasalaki kati na Ejipito ; nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga mpe nasalaki ete babotola bampunda na bino ; mpe natondisaki bazolo na bino na solo ya bibembe oyo ekufaki na molako na bino. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ