Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 49:24 - Mokanda na Bomoi

24 Bato ya Damasi balembi nzoto, bakomi koluka kokima mpe somo ekangi bango ; kobanga mpe pasi ezwi bango lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 49:24
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe alobaki na mwasi : « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; okobota na pasi. Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, kasi ye akozala mokonzi na yo. »


Somo makasi ekokweyela bango, pasi mpe kobanga ekotika bango te ; bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Bango na bango bakotalana na kokamwa mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto.


Botuna mpe botala : Boni, mobali akoki kobota bana ? Bongo mpo na nini nazali komona moto nyonso ya makasi asimbi libumu na ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota mpe elongi na ye ekomi mawa-mawa ?


Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota, kolela ya pasi lokola mwasi oyo azali kobota mwana na ye ya liboso : ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ; azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba : « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. »


Bakobotola Kerioti mpe bandako na yango oyo batonga makasi. Na mokolo wana, mitema ya basoda ya mpiko ya Moabi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Tala, mpongo moko ekopumbwa mpe ekokita na elulu, etanda mapapu na yango likolo ya Botsira ! Na mokolo wana, mitema ya basoda ya Edomi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota. › »


Bobotola na makasi bandako na bango ya kapo mpe bibwele na bango ; bomema bilamba, biloko na bango ya kitoko mpe bashamo na bango ! Tika ete bato bawolola bango na bangambo nyonso : ‹ Somo ekangi bango na bangambo nyonso ! ›


Nakosala ete bato ya Elami balenga liboso ya banguna na bango, liboso ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; nakokweyisela bango pasi na kanda na Ngai, » elobi Yawe. « Nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango.


Tango mokonzi ya Babiloni ayokaki sango na tina bango, alembaki nzoto, somo makasi ekangaki ye mpe akomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Tango toyokaki sango na tina na bango, tolembaki nzoto, somo makasi ekangaki biso mpe tokomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Pasi ekomeli ye lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ; kasi mpo ete azali lokola mwana azanga mayele, soki tango ya kobotama ekoki, abimaka na libumu ya mama na ye te.


Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.


Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana bipai na bipai, mpe nzala ekozala makasi penza. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ