Nakosala ete bato ya bikolo ebele bakamwa yo mpe bakonzi na bango balenga na somo likolo na yo tango nakolakisa bango mopanga na Ngai. Na mokolo ya kokweya na yo, moko na moko kati na bango akokoma kolenga tango nyonso mpo na bomoi na ye.
Mpo na somo ya minyoko na yango, bakotelema na mosika mpe bakoganga : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene ! Mawa na yo, Babiloni, engumba ya nguya ! Kobebisama na yo ezwi kaka ngonga moko pamba ! ›