Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 49:17 - Mokanda na Bomoi

17 « Mokili ya Edomi ekokoma eloko ya somo ; moto nyonso oyo akolekela wana akokamwa mpe akoyoka somo wana akomona kobeba na yango nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 49:17
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako Tempelo oyo ezali sik’oyo kitoko penza, kasi bato nyonso oyo bakoleka pembeni na yango bakokamwa mpe bakoloba : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na mokili oyo mpe na Tempelo oyo ? ›


Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.


Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « Botsira ekobebisama mpe ekokoma eloko ya somo, eloko ya kotiola mpe ya lisuma ; mpe bingumba na yango nyonso ekobebisama mpo na libela. »


Likolo ya kanda ya Yawe, bato bakovanda lisusu na Babiloni te mpo ete ekobebisama nye. Bato nyonso oyo bakoleka na Babiloni bakokamwa mpe bakozala na somo ya komona bapota na yango nyonso.


Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga, ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola ; bongo, bato bakovanda lisusu kuna te.


mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela Edomi mpe nakoboma bato mpe banyama na yango ; nakobebisa yango, mpe bakokufa na mopanga, kobanda na engumba Temani kino na engumba Dedani.


Bato ya mombongo ya bikolo mosusu bakomi koseka mpe kowolola yo : Osuki eh ! Osuki ! Okotikala kozala lisusu te ! › »


Mpo ete osepelaki na kobebisama ya libula ya Isalaele, nakosala yo mpe kaka ndenge wana : ngomba Seiri, okobebisama elongo na Edomi mobimba ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › »


Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natombokeli yo, ngomba Seiri ! Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo mpe nakokomisa yo esobe mpe mokili oyo ezanga bato.


Nakokomisa ngomba Seiri esika oyo ebebisama nye mpe ezanga bato ; mpe nakoboma kuna bato nyonso oyo bakoluka kokende mpe kozonga.


Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.


Tala ndenge ekosuka, engumba oyo ya bisengo, oyo ezalaki na kimia koleka mpe ezalaki komilobela : « Ezali nde ngai, mosusu azali te soki ngai te. » Ndenge nini engumba oyo ebebisami, ndenge nini ekomi penza ndako ya banyama ! Bato nyonso oyo bakolekela wana bakobeta piololo mpe koningisa mito.


Mokili mobimba ekopela na moto ya sofolo mpe ekotonda na mungwa. Bakolona ata eloko moko te, eloko moko te ekobima mpe matiti ekobota te. Mokili yango ekobebisama ndenge Sodome mpe Gomore, Adima mpe Tseboyimi, ebebisamaki : bingumba oyo Yawe abebisaki na kanda na Ye ya makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ