Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 49:16 - Mokanda na Bomoi

16 Somo oyo bato bazali koyoka yo mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo. Yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba ; ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 49:16
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali Amatsia nde moto alongaki bato ya Edomi, nkoto zomi na Lubwaku ya Mungwa, mpe abotolaki na bitumba engumba ya Sela ; mpe abengaki yango « Yokiteyeli, » kombo oyo babengelaka yango kino lelo.


Na mitindo na yo nde mpongo emataka likolo mpe esalaka zala na yango na likolo ?


Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.


Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo ; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.


Lolendo ya moto ekitisaka ye, kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.


Ebenga na ngai oyo obombami kati na madusu ya mabanga, kati na madusu ya bangomba, monisa ngai ata elongi na yo mpe sala ete nayoka ata mongongo na yo, pamba te mongongo na yo ezalaka elengi mpe elongi na yo ezalaka kitoko mingi ! »


Loboko na ngai ekamataki bomengo na bango ndenge bakamataka zala ya ndeke ; mpe ndenge bato balokotaka maki batika, ndenge wana mpe ngai nalokotaki mokili mobimba : moko te eningisaki lipapu to efungolaki monoko mpo na kobeta piololo. › »


Bakokima na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.


Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : « Solo, mokangami akokangolama na maboko ya basoda ya mpiko, mpe bomengo ya bitumba ekokangolama na maboko ya monyokoli. Nakotelemela bato oyo bakotelemela yo, mpe nakobikisa bana na yo.


Ndenge nini bokoki koloba : ‹ Tozali basoda ya mpiko, bato ya makasi, bilombe ya bitumba ? ›


Nakokomisa yo moke kati na bikolo, ekolo ya kotiola kati na bato.


Bosangisa bato nyonso oyo babundaka na matolotolo mpo na kotelemela Babiloni ; tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga bazingela Babiloni mobimba, basala ete ata moto moko te akima, bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango mpe bazongisela yango makambo oyo esalaki bikolo mosusu ; pamba te ebetaki tembe na Yawe, Mosantu ya Isalaele.


Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi, nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, » elobi Yawe.


Soki bakimi na se ya mabele, na mboka ya bakufi, loboko na Ngai ekobimisa bango kuna ; soki bakimi na Lola, nakokitisa bango na se.


Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye na nzela ya sembo te ! Alukaka kosala zala na ye na likolo ya bangomba mpo na kokima ete makambo mabe ekomela ye.


kasi nayinaki Ezawu ; bongo nabongolaki bangomba na ye esobe mpe nakabaki libula na ye epai ya bambwa ya zamba. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ