Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 49:13 - Mokanda na Bomoi

13 Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « Botsira ekobebisama mpe ekokoma eloko ya somo, eloko ya kotiola mpe ya lisuma ; mpe bingumba na yango nyonso ekobebisama mpo na libela. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 49:13
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe alobaki : « Nakati seleka na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete lokola osali likambo ya boye, lokola oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko,


Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi.


Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi.


Mopanga na Yawe etondi na makila, ezipami na mafuta, na makila ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali, na mafuta ya bameme ya mibali, pamba te ezali na mbeka moko mpo na Yawe kati na Botsira mpe bazali koboma bato ebele penza kati na mokili ya Edomi.


Nalapi ndayi na Kombo na Ngai ; oyo ezali sembo ebimaka na monoko na Ngai, liloba oyo bakoki koboya te : mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekolapa ndayi na Kombo na Ngai.


Azali nani, ye oyo awuti na Edomi, na Botsira, na bilamba ya motane ? Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu, oyo azali kotambola lokola elombe, mpo ayebi ete azalaka makasi ? « Ezali nde Ngai ; nakataka makambo na bosembo, natonda na nguya mpo na kobikisa. »


Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, bongo bato nyonso oyo bakoleka wana bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango.


Nakobebisa engumba oyo mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola. Bato nyonso oyo bakolekela awa bakokamwa mpe bakoyoka somo wana bakomona kobeba na yango nyonso.


Kasi mpo na yango, boyoka Liloba na Yawe, bino Bayuda nyonso oyo bozali kovanda kati na Ejipito : « Tala, nalapi ndayi na Kombo na Ngai ya monene, » elobi Yawe, « moto moko te oyo awuta na mokili ya Yuda, bongo avandi na esika songolo ya Ejipito, akobelela to mpe akolapa ndayi na Kombo na Ngai, na koloba : ‹ Lokola Nkolo Yawe azali na bomoi ! ›


na Kerioti mpe na Botsira, na bingumba nyonso ya Moabi, ezala oyo ezali mosika to oyo ezali pene.


Tala, mpongo moko ekopumbwa mpe ekokita na elulu, etanda mapapu na yango likolo ya Botsira ! Na mokolo wana, mitema ya basoda ya Edomi ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota. › »


Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi na Kombo na Ye moko : Solo, nakotondisa yo na bato lokola liboke ya mabanki, bongo bakobeta milolo ya elonga likolo na yo.


Nakotia moto na engumba Temani, mpe moto yango ekozikisa bandako ya Botsira, oyo batonga makasi. »


Nkolo Yawe alapi ndayi na Kombo na Ye moko ; Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nazali na somo ya lolendo ya Jakobi, nayini bandako na ye, oyo batonga makasi ; nakokaba engumba elongo na biloko na yango nyonso. »


Bato ya Jakobi bakokoma lokola moto, libota ya Jozefi ekokoma lokola lolemo ya moto. Kasi libota ya Ezawu ekokoma lokola matiti, bongo moto ya libota ya Jakobi mpe ya Jozefi ekozikisa yango. Boye, kati na bana ya Ezawu, moto ata moko te akotikala na bomoi, » elobi Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ