Jeremi 49:1 - Mokanda na Bomoi1 Na tina na bato ya Amoni : Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Isalaele atikali lisusu na bana mibali te ? Atikali lisusu na bakitani ya libula te ? Bongo mpo na nini Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, abotoli bingumba ya Gadi ? Mpo na nini bato na ye bayei kovanda na Gadi ? အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.