Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 48:7 - Mokanda na Bomoi

7 Lokola bozali kotia mitema na misala na bino mpe na bomengo na bino, bino mpe bokokende na bowumbu ; boye Kemoshi mpe akokende na bowumbu elongo na Banganga-Nzambe mpe bakambi na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 48:7
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango ya bikeko, mpe Davidi elongo na basoda na ye bamemaki yango.


Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi ; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki.


Na ngomba oyo etalani na Yelusalemi, Salomo atongaki esambelo ya likolo ya ngomba mpo na Kemoshi, nzambe ya mbindo ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni.


Atiaka nzembo ya sika kati na monoko na ngai, nzembo ya masanzoli mpo na Nzambe na biso. Bato ebele bakomona, bakobanga mpe bakotiela Yawe motema.


Solo, Ye moko Nzambe akobebisa yo mpo na libela, akokanga yo kati na ndako na yo, akobwaka yo libanda mpe akopikola yo na mokili ya bato ya bomoi.


Yango nde etumbu na yo, mbano oyo nakatelaki yo, » elobi Yawe, « pamba te bobosanaki Ngai mpe botiaki mitema epai ya banzambe ya lokuta.


Akotia moto kati na batempelo ya banzambe ya bato ya Ejipito, akotumba batempelo yango mpe akomema banzambe na bango ya bikeko na bowumbu. Akolongola bato ya Ejipito ndenge mobateli bibwele alongolaka basili na kazaka na ye, mpe akobima na kimia.


Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshi ndenge bato ya Isalaele bayokaki soni tango batiaki mitema na Beteli.


Oh Moabi, mawa na yo ! Bato ya Kemoshi babebisami, bana na yo ya mibali bakangami na bowumbu, mpe bana na yo ya basi bakokende na bowumbu !


« Eshiboni, lela mpo ete Ayi ebebisami ! Bino bavandi ya Raba, boganga ! Bolata basaki mpe bosala matanga, bokima na bangambo nyonso ya mir, pamba te Moloki akokende na bowumbu elongo na banganga-nzambe mpe bakambi na ye.


Mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabwaku na yo, mabwaku oyo ebotaka bambuma ebele ? Oh elenge mwasi oyo otambolaka na bosembo te, ozali solo kotia motema na bomengo na yo mpe ozali koloba : ‹ Nani akobundisa ngai ? ›


Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai, mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu, bosembo mpe boyengebene na mokili ; pamba te nasepelaka nde na makambo wana, » elobi Yawe.


Bolonaki makambo mabe, bobukaki mpe makambo mabe mpe boliaki mbuma ya lokuta, pamba te botiaki elikya na makasi mpe na ebele ya basoda na bino.


Oh Moabi, mawa na yo ! Oh bato ya Kemoshi, bobebisami ! Bakomisaki bana na ye ya mibali bakimi ; mpe bana basi na ye, bakangami ya mokonzi Sikoni, mokonzi ya Amori.


Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.


Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango : ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. ›


Boni, okozwa te oyo Kemoshi, nzambe na yo, apesi yo ? Biso tokozwa oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ