Kasi Yawe alobi sik’oyo boye : « Etikali mibu misato, kobakisa ata mokolo moko te, bato ya lokumu ya Moabi mpe ebele ya bato na ye bakosambwa, bongo bato na ye oyo bakobika bakozala kaka moke mpe bakozanga makasi. »
Pamba te moto ya Siri ezali Damasi, mpe moto ya Damasi ezali na yango kaka Retsini. Etikali kaka mibu tuku motoba na mitano, Efrayimi ekobebisama mpe ekozala lisusu na molongo ya mabota te.
Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › elobi Yawe. ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso epai wapi napanzaki bino ; kasi bino, nakobebisa bino nye te ; solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; nakozanga te kopamela bino. ›
Motomboki yango akotelemela makambo nyonso ya Nzambe mpe akomitombola na likolo ya nyonso oyo bato babengaka Nzambe to na likolo ya oyo bato bagumbamelaka, kino kokende kovanda kati na Tempelo ya Nzambe mpe komibenga Nzambe.