Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 48:36 - Mokanda na Bomoi

36 « Mpe motema na Ngai ezali kolela Moabi ndenge flite ebetaka, ezali kolela lokola flite mpo na bato ya Kiri-Eresheti. Bomengo na bango nyonso esili kobunga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 48:36
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Babebisaki bingumba, mpe moto nyonso abwakaki libanga moko na bilanga nyonso ya kitoko kino etondaki na mabanga, bakangaki bitima nyonso ya mayi, mpe bakataki nzete nyonso ya kitoko. Kaka engumba ya Kiri-Aresheti nde etikalaki na mabanga na yango ; kasi babwaki ya mabanga bazingelaki yango mpe babundisaki yango lokola.


Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa.


Moto oyo asalaka bolamu atikelaka bakitani na ye libula, kasi bomengo ya moto ya masumu ebombamaka mpo na moyengebene.


Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi ; akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi.


Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, kino na Egilati-Shelishiya ; bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ; mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga mpo na kobebisama na bango.


Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwaki mpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye.


Motema na ngai ezali kolela lokola lindanda mpo na Moabi, mpe kati ya motema na ngai ezali komona pasi mpo na Kiri-Aresheti.


Tala wuta na likolo mpe mona wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo : Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo ? Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili ?


Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.


Ah ngai eh ! Ah motema pasi eh ! Ah ! Motema na ngai ezali kobeta makasi, ezali koswa makasi kati na ngai, mpe nazali kokoka kokanga monoko te, pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba.


Yango wana nazali kolela mpo na Moabi, nazali kolela mpo na Moabi nyonso ; nazali kosala matanga mpo na bato ya Kiri-Eresheti.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ