Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 48:35 - Mokanda na Bomoi

35 Nakoboma bato nyonso oyo bakendaka na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe batumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe na bango, kati na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 48:35
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya Diboni bazali komata na bisika na bango ya bule, na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba, mpo na kolela ; Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba. Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso.


Bakomona Moabi komata na bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na kobondela na esika na ye ya bule, kasi akolonga te.


Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo ; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. »


Lokola bozali kotia mitema na misala na bino mpe na bomengo na bino, bino mpe bokokende na bowumbu ; boye Kemoshi mpe akokende na bowumbu elongo na Banganga-Nzambe mpe bakambi na ye.


Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ;


Mbeka ya masanga oyo bosengeli kobonza ekozala : balitele minei ya masanga ya vino mpo na ngombe moko na moko, balitele misato ya masanga ya vino mpo na meme moko na moko ya mobali mpe balitele mibale ya masanga ya vino mpo na mwana meme moko na moko ya mobali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ