29 Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, lolendo oyo eleka penza ndelo ! Tala ndenge amatisaka mapeka ! Atondi na lofundu, azali na monoko makasi, mpe motema na ye emikitisaka te.
Nakopesa etumbu na mokili mpo na mabe na yango, mpe bato mabe, mpo na masumu na bango. Nakosukisa lofundu ya bato ya lolendo mpe nakokitisa lolendo ya banyokoli.
Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, ndenge atombolaka mapeka : lolendo na ye oyo eleka ndelo mpe lofundu na ye, lolendo mpe maloba na ye ya lofundu ezanga na yango tina.