28 Bino bavandi ya Moabi, bosundola bingumba na bino mpe bokende kovanda kati na mabanga ! Bozala lokola ebenga oyo etongaka zala na yango kati na mabanga.
Ebenga na ngai oyo obombami kati na madusu ya mabanga, kati na madusu ya bangomba, monisa ngai ata elongi na yo mpe sala ete nayoka ata mongongo na yo, pamba te mongongo na yo ezalaka elengi mpe elongi na yo ezalaka kitoko mingi ! »
Bato bakokimela na madusu ya mabanga mpe na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.
Somo oyo bato bazali koyoka yo mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo. Yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba ; ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.
Bobaluka mpe bokima, bokende kobombama na madusu ya mabanga, bino bavandi ya engumba Dedani ! Pamba te nakotindela Ezawu pasi tango nakopesa ye etumbu.
Lokola loboko ya bato ya Madiani ezalaki na nguya makasi likolo ya Isalaele, bana ya Isalaele babongisaki mabulu ya kokimela mpe bibombelo kati na mabanga, kuna na likolo ya bangomba.
Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele.