Napesaki mitindo epai na bato oyo babulisama mpo na Ngai ; nabengisaki lisusu bilombe na Ngai, bato oyo basepelaka na lokumu na Ngai, mpo na kosilisa kanda na Ngai.
Oyoka nanu yango te ? Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala, nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala ; sik’oyo nde nakokisi yango. Esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi mipiku ya mabanga.
mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bato ya Filisitia ; nakoboma bato ya Kereti mpe nakobebisa batikali oyo bazalaka pembeni ya ebale monene.
Boyoka ! Yawe azali kobelela na engumba ! Kotosa Kombo na Ye, yango nde kozala na bwanya. Boyoka sango ya etumbu na bino na monoko na Ye oyo atindi yango !