Abineri abelelaki na Joabi : — Boni, mopanga ekoba na yango koboma tango nyonso ? Oyebi te ete ekosuka mabe ? Okozela kino tango nini mpo na kopesa mitindo na bato na yo ete balanda lisusu te bandeko na bango ?
Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango ?
« Boye loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomela, bolangwa mpe bosanza, bokweya mpo na kotelema lisusu te, mpo na mopanga oyo nakotinda kati na bino. ›
Oh mopanga, telema ! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.
Biteni nyonso misato ya basoda babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki. Na loboko na bango ya mwasi, basimbaki minda, mpe, na loboko ya mobali, bakelelo mpo na kobeta. Mpe bazalaki koganga : « Mopanga mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. »