Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 47:4 - Mokanda na Bomoi

4 Pamba te mokolo ekoki mpo na kobebisa bato nyonso ya Filisitia mpe kosilisa koboma batikali nyonso oyo bakoluka kosunga bingumba Tiri mpe Sidoni. Yawe akomi pene ya kobebisa bato ya Filisitia, batikali ya esanga ya Kafitori.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 47:4
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kanana azalaki tata ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti,


ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti.


Nzambe azongisaka kanda na Ye sima te ; liboso na Ye, ezala bato ya lolendo balengaka.


Kasi Yawe asekaka bato mabe, pamba te ayebi ete mokolo na bango ezali kobelema.


Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, tango pasi ekowuta mosika ? Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? Esika nini bokobomba bomengo na bino ?


Oh ekuke, lela makasi ! Engumba, ganga makasi ! Mokili mobimba ya Filisitia esili kozinda ! Milinga makasi ezali kobima na ngambo ya nor, mpe moto moko te atikali na libanda ya molongo.


Na mokolo wana, bavandi ya esanga bakoloba : ‹ Tala, makambo nini ekomeli bato oyo biso tozalaki kotiela mitema ? Tozalaki kokima epai na bango mpo na kozwa lisungi mpe lobiko liboso ya mokonzi ya Asiri. Biso sik’oyo tokosuka ndenge nini ? › »


« Mokili ya Asiri ekokweyisama na mopanga ya moto ya mokili oyo te, ekobebisama na mopanga ya moto te. Bato ya Asiri bakokima liboso ya mopanga, mpe basoda na bango ya bilenge bakokoma kosala misala ya makasi.


Ezali mokolo ya Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mpo na kozongisela banguna na yo mabe. Mopanga ekoboma kino ekotonda, kino ekosilisa posa na yango ya makila ; pamba te ezali nde mbeka mpo na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, pene ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.


Sala nzela moko mpo ete mopanga ekoma kino na Raba, engumba ya bato ya Amoni, mpe nzela mosusu mpo ete mopanga ekoma kino na Yelusalemi, engumba batonga makasi, kati na Yuda.


Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola mabe na bino ezongeli bino na makanisi, lokola bolakisi Ngai na polele botomboki na bino mpe bomonisi masumu na bino kati na misala na bino nyonso ; lokola bosali bongo, bokokende na bowumbu.


mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bato ya Filisitia ; nakoboma bato ya Kereti mpe nakobebisa batikali oyo bazalaka pembeni ya ebale monene.


Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakokitisa moto kati na Ejipito mpe nakosukisa nguya nyonso ya basungi na yango.


Tango ebelemi, mokolo yango ekoki. Tika ete mosombi moko te azala na esengo to moteki moko te azala na mawa, pamba te kanda makasi ezali kozela bato nyonso.


Mikolo ya etumbu ezali koya, mikolo ya kofuta masumu esili koya. Isalaele, yeba yango ! Mosakoli akomi zoba, moto ya Molimo abeli liboma ! Pamba te masumu na yo ekomi ebele penza, mpe mabe na yo ekomi mingi liboso na ngai.


Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani te na bato ya mokili ya Kushi ? » elobi Yawe. « Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito, bato ya Filisitia wuta na Kreti, bato ya Siri wuta na Kiri ?


Pamba te mikolo wana ekozala mikolo ya pasi makasi, mikolo oyo makambo nyonso oyo ekomama ekokokisama.


Ezalaki mpe ndenge moko mpo na bato na Avi oyo bazalaki kovanda na mboka yango kino na Gaza. Bato ya Kafitori, oyo bawuta na mokili ya Kafitori, babomaki bato ya Avi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango.


Tango Nganga-Nzambe Pineasi, bakambi ya lisanga mpe bakambi ya mabota ya Isalaele bayokaki makambo oyo bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase balobaki, batondisamaki na esengo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ