Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 47:3 - Mokanda na Bomoi

3 tango bakoyoka makelele ya bampunda koleka na lombangu, lokito ya bashar ya banguna mpe makelele ya bapine na yango. Batata bakozala lisusu na tango te ya kosunga bana na bango mpo ete maboko na bango ekolemba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 47:3
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bambanzi na bango ezali songe, batolotolo na bango nyonso ebendana makasi ; makolo ya bampunda na bango ezali lokola mabanga, bapine ya bashar na bango ezali lokola mopepe makasi.


Bino bampunda, bokende ! Bino basoda oyo botambolaka likolo ya bashar, botambolisa mbangu ! Bino basoda, bato ya Kushi mpe ya Puti, oyo bomemaka banguba, mpe bino bato ya Ludi oyo bobundaka na matolotolo, bokende liboso !


Basimbi matolotolo mpe makonga, bazali bato na kanza mpe bazanga mawa, bazali koganga lokola makelele ya ebale monene, bamati likolo ya bampunda, batandami na milongo lokola basoda mpo na kobundisa yo Babiloni, mboka kitoko !


Lokito ya bampunda ya banguna mpe makelele ya makolo na yango ezali koyokana wuta na Dani, ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, engumba mpe bavandi na yango nyonso, bongo mokili mobimba eningani.


Bakoya kobundisa yo na bibundeli, na bampunda mpe na bashar na yango elongo na bato ebele ; bakomibongisa mpo na kobundisa yo na bangambo nyonso, na banguba minene mpe ya mike, mpe na bikoti ya basoda. Nakokaba yo na maboko na bango mpo ete bapesa yo etumbu mpe bakosambisa yo kolanda mibeko na bango.


Banguba mpe bilamba ya basoda na bango ezali ya langi ya motane ; bibende ya bashar na bango ezali kongenga na mokolo oyo babongisi mpo na bitumba, mpe makonga basala na nzete ekomi kotambola bipai na bipai.


Ekatami ete engumba wana ekokende na bowumbu mpe bakomema yango mosika penza ; basali na yango ya basi bakolela lokola bibenga mpe bakomibeta batolo likolo ya pasi.


Tolo na yango ezalaki lokola bibende oyo basoda balataka na tolo, mpe makelele ya mapapu na yango ezalaki lokola makelele ya bashar oyo bampunda ebele ezali kobenda mpo na etumba.


Makolo ya bampunda enyataki mabele, na kopumbwa na mbangu makasi, na kolanda bankolo na yango, bato na nguya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ