Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 46:8 - Mokanda na Bomoi

8 Mokili ya Ejipito ezali koya lokola ebale Nili, lokola mayi ya bibale oyo etomboki. Ejipito ezali koloba : ‹ Nakoya mpe nakotondisa mokili, nakobebisa bingumba mpe bato na yango. ›

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 46:8
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo ! Yo dalagona monene oyo ovandaka kati na bibale na yo, yo oyo ozali koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; mpe ngai, ngai moko nde namisala ! ’


« Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa mpo na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe yebisa ye : ‹ Ozali lokola nkosi kati na bikolo, ozali lokola dalagona kati na bibale minene, otambolaka-tambolaka kati na bibale na yo, opanzaka mayi na makolo na yo mpe okomisaka bibale potopoto.


Bana ya mokonzi ya nor bokobongama mpo na bitumba mpe bakosangisa mampinga ya basoda ebele, bongo bakomema lokola mpela biloko nyonso oyo bakomona na nzela ; bakobunda bitumba makasi kino na ndako batonga makasi ya mokonzi ya sude.


Mpo na yango, mokili ekolenga, mpe bato na yango nyonso bakozala na matanga. Mokili mobimba ekotomboka lokola ebale Nili oyo etondi na mayi ; ekokoma koningana-ningana mpe ekokita lokola ebale ya Ejipito.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ