Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 46:4 - Mokanda na Bomoi

4 Bobongisa bampunda mpe bomata na bashar ! Bomitanda na milongo mpe bolata bikoti ya bitumba ! Bopelisa basonge ya makonga na bino mpe bolata bibundeli !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 46:4
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango nyonso ya bitumba, Oziasi azalaki kopesa banguba, makonga, bikoti ya bibende, bilamba ya bibende oyo ebatelaka tolo, matolotolo mpe bibambelo mabanga.


Na tango yango kaka, nalobaki lisusu na bato : « Tika ete moto nyonso alekisaka butu kati na Yelusalemi elongo na mowumbu na ye ; boye na butu, bakokengela mpo na biso, mpe na moyi, bakokoba mosala. »


Bino bikolo, boganga na somo mpe bopalangana ! Bino bituka nyonso ya mosika, boyoka ! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana ! Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana !


« Loba makambo oyo na Ejipito mpe tatola yango na Migidoli ; tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi : ‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama, pamba te mopanga ezali koboma bato oyo bazali zingazinga na yo. ›


Bopelisa basonge ya makonga, bokamata banguba na bino ; pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. Yawe akozongisa mabe na mabe, akosala yango mpo na Tempelo na Ye.


Basoda oyo babundaka na matolotolo bakozwa tango te ya kobeta makonga na bango ; bakozwa tango te ya kolata bibombelo ya tolo, bakobikisa te basoda na bango ya bilenge mpe bakoboma mampinga na bango nyonso.


Kasi lokola basilaki kolapa ndayi ete bakotosa ye, bavandi ya Yelusalemi bakomona yango lokola bimoniseli ya pamba mpe ya lokuta. Kasi mokonzi ya Babiloni akosala ete bakanisa lisusu mabe na bango, mpe akomema bango na bowumbu.


Bongo Saulo alatisaki Davidi bibundeli na ye moko : atiaki ye ekoti ya bronze na moto mpe alatisaki ye ebombelo ya tolo.


Alataki ekoti ya bronze na moto na ye mpe ebombelo ya tolo, oyo basala na bakilo pene tuku motoba ya bronze.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ