Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 46:27 - Mokanda na Bomoi

27 « Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ! Oh Isalaele, kobanga te ; nakobikisa yo solo wuta na mokili ya mosika, nabikisa bakitani na yo wuta na mokili ya bowumbu. Jakobi akozala lisusu na kimia mpe na bobatelami malamu, moto moko te akobangisa ye lisusu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 46:27
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo oyo Yawe akopesa yo bopemi na mosala na yo, na komitungisa na yo mpe na misala makasi oyo bapesaki yo,


Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi ; Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele : « Kobanga te, pamba te nasikolaki yo, nabengaki yo na kombo na yo, ozali ya ngai.


Kobanga te, pamba te nazali elongo na yo : nakoyeisa bana na yo wuta na ngambo ya este mpe nakosangisa bino wuta na ngambo ya weste ;


Kasi sik’oyo yoka, oh Jakobi, mowumbu na Ngai, Isalaele oyo naponaki !


Tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo asalaki yo, abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo mpe asungaka yo : Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te ; yo, Yeshuruni, oyo naponaki.


Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela ye : Yawe azali Bosembo na biso.


Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »


‹ Solo, nakosangisa bango wuta na mikili nyonso epai wapi nabenganaki bango tango natombokelaki bango, nakozongisa bango na esika oyo mpe nakovandisa bango na kimia.


Na mikolo wana, Yuda ekobikisama, mpe Yelusalemi ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela yango : Yawe azali Bosembo na biso. ›


Kasi nakozongisa Isalaele na lopango na ye ; mpe akolia lisusu matiti ya ngomba Karimeli mpe ya Bashani. Nzala na ye ekosila na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe ya Galadi.


Bobanga te mpe bolemba nzoto te tango bokoyoka basango ya mabe kati na mokili : mobu oyo, sango ya mabe ; mobu oyo elandi, sango mosusu ya mabe ; kaka sango ya mobulu kati na mokili to sango ya mokonzi moko abundisi mokonzi mosusu.


Yango wana, nakozongisa lisusu bolamu ya Sodome mpe ya Samari, elongo na bingumba na yango ; mpe yo, nakozongisa bolamu na yo kati na yango


Pamba te nakobimisa bino na bikolo, nakosangisa bino wuta na bikolo mpe nakozongisa bino na mabele na bino moko.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozongisa sik’oyo bato ya Jakobi oyo bakangamaki na bowumbu, nakoyokela libota mobimba ya Isalaele mawa mpe nakozala na zuwa makasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai.


Nakozongisa Isalaele, bato na Ngai, oyo bakendeki na bowumbu, mpe bakotonga lisusu bingumba oyo ebebisamaki mpe bakovanda kati na yango. Bakolona banzete ya vino mpe bakomela vino na yango, bakolona bilanga mpe bakolia bambuma na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ