Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 46:25 - Mokanda na Bomoi

25 Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nakopesa etumbu epai na Amoni, na nzambe ya Tebesi, na Faraon, na Ejipito mpe na banzambe na yango, na Faraon mpe na bato oyo batiaka mitema na bango epai na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 46:25
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.


Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito : Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, azali koya na Ejipito. Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakokaba Faraon Ofira, mokonzi ya Ejipito, na maboko ya banguna na ye oyo bazali koluka bomoi na ye, ndenge kaka nakabaki Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo azalaki koluka bomoi na ye. »


« Eshiboni, lela mpo ete Ayi ebebisami ! Bino bavandi ya Raba, boganga ! Bolata basaki mpe bosala matanga, bokima na bangambo nyonso ya mir, pamba te Moloki akokende na bowumbu elongo na banganga-nzambe mpe bakambi na ye.


Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natelemeli Faraon, mokonzi ya Ejipito ; nakobuka maboko na ye nyonso mibale : ezala loboko oyo ya malamu to loboko oyo ebukana ; mpe nakosala ete mopanga ekweya longwa na loboko na ye.


Yawe akoyokisa bango somo tango akobebisa banzambe ya bikeko nyonso ya mabele. Bato ya bikolo nyonso bakogumbamela Ye na bisika nyonso, moto na moto na esika oyo akozala kati na mokili na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ