Jeremi 46:22 - Mokanda na Bomoi22 Ejipito ezali kokima, na makelele lokola nyoka, pamba te banguna na yango bazali kopusana na nguya ; bazali koya kobundisa yango na bipasola lokola bato oyo bakataka banzete. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na nzela ya bantoma na yo, ofingaki Nkolo mpe olobaki : ‹ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, namataki kino na basonge ya bangomba, kino na basonge oyo eleki likolo kati na Libani ; nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, na zamba na yango oyo eleki kitoko ;