Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 46:20 - Mokanda na Bomoi

20 Mokili ya Ejipito ezali lokola mwana ngombe ya kitoko ya mwasi, kasi nzinzi ezali koya koswa yango kowuta na nor.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 46:20
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na ngai : — Ezali wuta na nor nde pasi ekokomela bavandi ya mokili.


nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi.


Ezali mokolo ya Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mokolo ya kozongisa mabe na mabe, mpo na kozongisela banguna na yo mabe. Mopanga ekoboma kino ekotonda, kino ekosilisa posa na yango ya makila ; pamba te ezali nde mbeka mpo na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, pene ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.


Elenge mwasi ya Ejipito akoyokisama soni, akokweya na maboko ya bato ya nor. »


« Bato ya mbangu bazali kokoka lisusu kokima te, mpe basoda ya mpiko bazali kokoka lisusu kobika te ! Bazali nde kobeta mabaku mpe kokweya pembeni ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tala ndenge nini mayi ezali kotomboka na nor, etondi lokola ebale oyo etondi mayi ; ekozindisa mokili mpe biloko nyonso kati na yango, bingumba mpe bavandi na yango nyonso. Bato bakoganga, bavandi nyonso ya mokili bakolela


« Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo, bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai ; mpo ete bozali kopumbwa-pumbwa lokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika ble mpe kolela lokola bampunda,


Efrayimi azali lokola mwana ngombe ya mwasi oyo babokola malamu, alingaka kobeta ble ; kasi nakotia ekangiseli na kingo na ye ya kitoko. Nakotambolisa Efrayimi lokola mpunda, Yuda akobalola mabele, Jakobi akopanza-panza yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ