Bakambi ya Tsoani bakomi lokola bazoba, bakambi ya Mefisi bakomi kokanisa makambo ya lokuta ; nzokande bango, makonzi ya bikolo ya bato ya Ejipito, nde bazali kobungisa bato ya Ejipito nzela.
mokonzi ya Asiri akomema bakangami ya Ejipito mpe bawumbu ya Kushi bolumbu mpe makolo ngulu : ezala bilenge to bampaka, bakotambola bolumbu mpe makolo ngulu mpo na soni ya Ejipito.
Mpo na nini ozali kosakola na Kombo na Yawe ete Ndako oyo ekokoma lokola Silo ; engumba oyo ekobebisama, ekotikala lisusu na bato te ? » Ebele ya bato nyonso bazingelaki Jeremi kati na Tempelo ya Yawe.
« Loba makambo oyo na Ejipito mpe tatola yango na Migidoli ; tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi : ‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama, pamba te mopanga ezali koboma bato oyo bazali zingazinga na yo. ›
Oh bato ya elenge mwasi Diboni, botika nkembo na bino mpe bovanda na esobe ; pamba te moto oyo akoya kobundisa Moabi akoya mpe kobundisa bino mpe kobebisa bingumba na bino oyo batonga makasi !
Nakokomisa Ejipito esobe kati na mikili oyo ekoma esobe, mpe bingumba na yango ekotikala lisusu na bato te, mibu tuku minei, kati na bingumba oyo ebeba. Nakopanza bato ya Ejipito kati na bikolo mpe nakopalanganisa bango na mikili mosusu.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobebisa banzambe ya bikeko mpe nakosala ete bato batika kosambela bililingi kati na Mefisi. Moto moko te lisusu akozala mokambi kati na Ejipito, mpe nakoyeisa somo kati na Ejipito mobimba.
Ata soki bakimi, bakobebisama ; Ejipito ekoyamba bango, Mefisi ekozala kunda na bango ; matiti mabe ekotonda na bibombelo palata na bango, banzube ekotonda kati na bandako na bango.
Mawa na bino bavandi ya etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, bino bato ya Kereti ! Pamba te Liloba na Yawe etelemeli bino : « Kanana, mokili ya bato ya Filisitia, nakobebisa yo, mpe moto ata moko te akotikala kati na yo. »