12 Bikolo ya bapaya ekoyoka sango ya soni na yo, makelele ya koganga na yo ekotondisa mabele. Soda moko akotutana na soda mosusu, mpe bango mibale bakokweya nzela moko. »
Eloko kaka bokotikala na yango : kokitisa elongi na se elongo na bato ya boloko to kokufa elongo na bato oyo babomi. Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama.
« Bato ya Yuda bazali na matanga, bingumba na bango esili kobebisama, bazali kolela mpo na mokili na bango, mpe koganga ezali koyokana wuta na Yelusalemi.
« Bato ya mbangu bazali kokoka lisusu kokima te, mpe basoda ya mpiko bazali kokoka lisusu kobika te ! Bazali nde kobeta mabaku mpe kokweya pembeni ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor.
Makelele mpe koganga ezali komata wuta na Eshiboni kino na Eleale mpe Yakatsi, wuta na Tsoari kino koleka Oronayimi mpe Egilati-Shelishiya ; pamba te, ezala mayi ya Nimirimi esili kokawuka.
Na mokolo wana, » elobi Yawe, « koganga makasi ekoyokana wuta na Ekuke ya Bambisi, kolela ekoyokana wuta na Mboka ya sika mpe lokito monene wuta na bangomba mikuse.