Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Jeremi 45:4 - Mokanda na Bomoi

4 Kasi Yawe alobaki na ngai : Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokweyisa biloko nyonso oyo natongaki mpe nakopikola biloko nyonso oyo nalonaki kati na mokili oyo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Jeremi 45:4
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

tango ya koboma mpe tango ya kobikisa, tango ya kobuka mpe tango ya kotonga ;


Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona.


Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo alonaki yo asili kozwa mokano ya kotindela yo pasi ya makasi, pamba te libota ya Yuda mpe ya Isalaele basali mabe liboso na Ngai mpe batumboli kanda na Ngai tango bazali kotumbela nzambe Bala malasi ya ansa.


Olonaki bango mpe bazwi misisa ; bazali kokola mpe kobota mbuma. Ozali tango nyonso pene ya minoko na bango, kasi mosika ya mitema na bango.


Ndenge nazalaki kosenzela bango mpo na kopikola mpe kobuka, kobebisa, kopanza mpe kosala bango mabe, ndenge wana mpe nakosenzela bango mpo na kotonga mpe kolona, » elobi Yawe ;


Abebisi lopango na ye ndenge babebisaka lopango ya elanga, abebisi esika na bango ya mayangani. Na kanda makasi na Ye, Yawe asali ete Siona abosana bafeti oyo ekatama mpe mikolo ya Saba ; mpe apameli mokonzi mpe Nganga-Nzambe.


Nakobebisa bilanga na ye ya vino mpe banzete na ye ya figi oyo azalaki koloba na tina na yango : « Ezali bakado oyo bamakangu na ngai bapesaki ngai ; » nakokomisa yango matiti ya zamba, mpe banyama ya zamba ekolia yango.


Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino ; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ