Nzambe, molimo na ngai elembi kati na ngai ; yango wana nazali kokanisa Yo wuta na mokili ya Yordani, wuta na songe ya ngomba Erimoni mpe wuta na ngomba Mitseari.
Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, nalingaki ata kokima bato na ngai mpe kozala mosika na bango, pamba te bango nyonso bazali bandumba, bazali lisanga ya bakosi !
Wuta na likolo, atindeli ngai moto, akitiseli ngai yango kino na mikuwa ; atieli ngai motambo na makolo mpe akweyisi ngai ; akomisi ngai eloko ya pamba, akotisi ngai na mawa ya mokolo na mokolo.
Tika ete mabe na bango nyonso eya liboso na Yo ; sala bango ndenge osalaki ngai mpo na masumu nyonso oyo nasalaki ! Kolela na ngai ezali mingi mpe motema na ngai etondi na pasi !
Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.