9 Bobosani mabe oyo batata na bino, bakonzi mpe basi ya bakonzi ya Yuda basalaki ? Bobosani mabe oyo bino mpe basi na bino bosalaki kati na mokili ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi ?
— Boni, bokanisi ete Yawe abosani mpe azali kokanisa lisusu te malasi ya ansa oyo botumbaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, bino, batata na bino, bakonzi na bino, bakalaka na bino mpe bato nyonso ya mokili ?
bongo bozali koya liboso na Ngai kati na Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai, mpe bozali koloba : ‘ Tobiki na biso ! ’ Bobiki na bino solo mpo na kosala makambo oyo nyonso ya nkele ?
Kanisaka malamu likambo oyo mpe kobosanaka te ndenge nini opelisaki kanda ya Yawe, Nzambe na yo, kati na esobe : banda mokolo oyo bobimaki wuta na Ejipito kino bokomaki na esika oyo, bozalaki kaka kotosa Yawe te.